Nzambe azali Nzambe

Boyebi nani nazali? Nazali Nzambe ya libela! Bozali kosala lokola boyebi ngai te? Mpo na nini bolingi kosakana na ngai? Mpo na nini bolingi kopesa ngai nkanda? Mpo na nini bolingi komeka ngai? Bobosani makambo ya Sodome na Gomorrhe oyo nakomisi putulu? Boyebi makambo ya bato oyo nakomisi mabanga...? Bokende! Liloba nini ya moto ekoki koloba ngai? Maloba na bino ezali mike mpe na ndelo. Yango wana bosengeli koloba kaka: Nzambe azali Nzambe...

Nzambe azali Nzambe

Bozali na likanisi moko te ya nani nazali ?
Nazali Nzambe moko kaka na moko bobele.
Nazali oyo azali, Alpha na Omega, Mokonzi ya mangomba ya basoda, Nkosi ya libota ya Yuda. Nazali oyo akeli biloko nyonso. 
Nazali oyo atiaki. 
Nazali Nkolo ya bantango na makambo nyonso. 
Nazali Mosantu ya basantu. 
Nazali Kombo oyo ezali likolo ya makombo nyonso, mpe liboso ya Kombo na ngai mabolongo nyonso egumbami na likolo, na mabele mpe na nse ya mabele. 
Nazali Mobondiski! 
Nazali oyo asimbi bomoi nyonso na likolo, na mabele mpe na nse ya mabele.

Boyebi nani nazali ?
Nazali Nzambe ya libela! Bozali kosala lokola boyebi ngai te? 
Mpo na nini bolingi kosakana na ngai? 
Mpo na nini bolingi kopesa ngai nkanda? 
Mpo na nini bolingi komeka ngai? 
Bobosani makambo ya Sodome na Gomorrhe oyo nakomisi putulu? 
Boyebi makambo ya bato oyo nakomisi mabanga to babongwani basima na bankima, na mokili mobimba? Bokende!

Boyebi solo nani nazali ?
Nazali mokolo ya kala, libanga ya bantango. 
Nazali etima ya mai, mpe nyonso, nzete nyonso oyo ezali pembeni ya etima oyo ya mai ekokawuka te. 
Nazali etima ya mai oyo esukaka te; Makasi na ngai esukaka te. 
Nazalaki, nazali mpe nakozala. 
Nazali ndenge moko na lobi, lelo mpe libela; nabongwanaka te mpe nakobongwana te. 
Nazali moboko ya bokeli nyonso. 
Nazali mpata oyo babomaki; Bolingo na ngai bomekilaka te. 
Nazali moto oyo eliaka; Moto na ngai emonanaka te.

Nani akoki kotelema liboso ya elongi na ngai ?
Nani azali na makoki ya kotelema liboso ya elongi na ngai? 
Namonaka nyonso mpe nayebaka nyonso liboso ete esalema. 
Mpo na nini bozali kopesa ntango na bino na komikanisa mingi, kozala na mawa? Ntango nalobi, esalemaka. 
Boluka te kososola mpo ntango nalobi, esalemaka. Yango wana, oyo atiaki elikya na ye na ngai akoyokisama mawa te. Yango wana nalobi ete nzete oyo ezali pembeni ya etima ya mai ekokawuka te. 
Nazali ya liboso mpe ya nsuka.

Mpo na nini bolobi ete Nzambe azali na nguya ?
Oyo ezali maloba ya bato nyonso oyo bayebi eloko moko te ya bonene na ngai. Liloba nini ya moto ekoki koloba ngai? Maloba na bino ezali mike mpe na ndelo. Yango wana bosengeli koloba kaka: Nzambe azali Nzambe.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "Dieu est Dieu", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Sources Ph. illustration: www.freepik.com