Mituna bino moko !

Mituna bino moko soki ezali normal ete Ngai, Nzambe ya seko na seko, natindaka ba nsango ya solo na Ngai na nzela ya bazoba. Mituna bino moko soki nionso ezali normal na esika na bino, soki bomiyoki malamu tango bino, basaleli ya Nzambe batindami mpo na mokumba oyo, boboyi kosala, botindi Ngai natinda bazoba mpo na kosala na esika na bino. Mpo na nini kopona bazoba mpo na kosakola, tango baprofeta mpe baprofeta ya basi ya lokuta bazali kati na bino?...

Mituna bino moko !

Mituna bino moko soki ezali normal ete Ngai, Nzambe ya seko na seko, natindaka ba nsango ya solo na Ngai na nzela ya bazoba. Mituna bino moko na motema ya solo soki ezali normal ete bato oyo bazali na maladi ya makanisi bazali kopesa bino Liloba na Ngai ya Solo, na balabala, na bosoto. Mituna bino moko soki bokoki koyeba mpe kolanda basaleli ya Nzambe oyo basengeli kosala mosala oyo.

Mituna bino moko soki nionso ezali normal na esika na bino, soki bomiyoki malamu tango bino, basaleli ya Nzambe batindami mpo na mokumba oyo, boboyi kosala, botindi Ngai natinda bazoba mpo na kosala na esika na bino. Mituna bino moko, boluka koyeba nsango ebombami na sima ya ekateli na Ngai ya kotinda bazoba mpo na kosunga bino kozwa lisusu nzela ya Solo. Mpo na nini kopona bazoba mpo na kosakola, tango baprofeta mpe baprofeta ya basi ya lokuta bazali kati na bino?

Boni ezali te lolenge moko ya komema bino koyeba ete bazoba oyo Naponaka bazali na valeur ya molimo koleka bino? Na ndenge ya momeseno, zoba azalaka na makoki na ye nyonso te, na nzela na ye nyonso ya komanyola, ya kosala mpe ya koloba te. Ndenge nini ekoki kosalema ete moto ya lolenge wana, azali na kati ya bosoto ya molimo ya makasi mingi, akoka koyamba ba nsango na Ngai ya Solo mpe kopesa bino yango?

Soki zoba akoki koyamba Ngai, kozala na boyokani ya pembeni na Ngai, Nzambe, nzokande bino oyo bomikanisi ete bozali na makanisi malamu, bozangi likoki wana, elakisi ete likambo moko ya monene ezali. Ezali nini position na bino ya solo? Boni oyo ezali te, yango moko, etumbu na bino? Mituna bino moko na mituna nyonso oyo. Na misala na Ngai, Nabengi bino komanyola.

Mituna bino moko soki ezali normal ete bana mike bazali kopesa bino ba nsango na Ngai ya Solo. Ezali normal ete mokumba na Ngai ezali kotia likolo ya bana mike? Ezali ya solo ete na mosala ya Nzambe, mibu ya bomoi ezali na ntina te, kasi na molongo ya momeseno ya biloko, mokumba ya lolenge oyo ekendaka mbala mingi epai ya bikolo, oyo bakola malamu mpo na kosala ndenge bango moko baponi. Mpo na nini wana, na mikolo oyo, bikolo balekisaka ntango na bango na kolala, kobola kosala mosala na Ngai, tango bana bazali na mosala? Na esika ya komituna mpo na kososola, kokanga nsango ebombami na sima ya likambo oyo, boponi kosala lokola batali, komona bana oyo lokola kaka bikamwiseli.

Mituna bino moko, bato ya mabele, soki ezali normal komizwa na mokili moko esika biloko nyonso ezali na botamboli mosusu, na mobulungano oyo ekoki kolimbolama te? Bomonaka normal ete bisika ya losambo ekotisama na bayekoli ya satana, tango bisika wana kaka ya losambo ezali na basaleli ya makasi ya Nzambe, oyo bakoki kosala pekiso mpe kopesa Liloba na Ngai ya Solo? Napesaki basaleli oyo ya Nzambe nguya ekoki mpo na kokomisa bisika ya losambo bisika bana ya Nzambe bakendaka mpo na kozwa Nguya na Ngai mpe bokolongono ya molimo.

Basaleli ya Nzambe, mituna bino moko soki ezali normal kotikala nye mpe kotika biloko ekende. Mituna bino moko, mokolo na mokolo oyo ebandaka mpe esukaka, soki misala na bino ekokani na ndayi oyo bolapaki na mokili mosusu. Tala ndenge mokili na Ngai ezali. Mituna bino moko, basaleli ya Nzambe, mibali mpe basi, oyo Napesaki makabo mpo na kobikisa bana na Ngai na mokili oyo, makabo ya makasi mpo na kobikisa maladi nyonso oyo ekokaki kobika te, makabo oyo maladi moko te ekoki kotelemela. Mpo na nini maladi wana ezali kokoba kobebisa, tango bino botikali kaka wana, na goyigoyi? Boni ezali soni te kosala ndenge wana?

Boye, bokamwa te soki lelo satana azali kosalela bikamwiseli ya lokuta, bobiki ya mwa ntango moke, mpo na koluka kokitisa bato oyo bazali na maladi wana. Ezali bongo mpo bosili kotika mikumba na bino moko moko, kotikela satana nzela polele.

Mokumba na bino ezali monene soki bato oyo bazali na maladi wana bakufi, tango bino oyo bosengelaki kobikisa bango, bozali kotikala na botelemi te. Etumbu na bino ekozala nini na ntango wana? Mituna bino moko soki ezali normal ete mbala nyonso Napesaka bino ba nzela ya kobika, ba libaku ya kosikolama na Bolingo na Ngai, na Ngolu na Ngai mpe na Bokangi motema na Ngai, bozongaka lisusu na mabunga na bino?

Banda kokwea na bino na masumu tii lelo, eloko moko ebongwani te. Bozali se kokoba kokita, atako milende na Ngai nyonso mpe kimia na Ngai lokola Tata Mokeli. Bozali kokita na ndenge ntango ekendaka, tii na esika ya kondima ete elikya ezali lisusu te mpo na bino kotombola motu na suka ya ntango.

Mituna bino moko soki bizaleli na bino ezali normal; bino bato oyo bakelamaki malamu, na elilingi na Ngai mpe na bomoto na Ngai; bino oyo bozali na biteni ya moto na Ngai ya Bonzambe, oyo ekomisaka bino na nguya ekoki. Mituna bino moko soki ezali normal lelo kobunda-bunda na mokano ya molili. Mituna bino moko mpo na nini satana asalaka na bonsomi tango azali na bomoi kaka na nzela ya bosoto na bino ya molimo.

Soki satana amilakisi na nguya monene, na ntango wana bosengeli komituna soki bosoto ya molimo oyo bosalaka mpo na koleisa ye mpe kopesa ye bokonzi wana ya mokili mobimba ezali mabe boni. Mituna bino moko ntango nyonso, na ntango nyonso, na biloko nyonso bozali kosala. Tika ete mwasi amituna soki mokumba oyo azali kosala lelo na mabele ekokani na oyo esengeli kozala.

Yo, mwasi oyo Natiaki elikya na Ngai nyonso na yo, yo oyo Natiaki na yo bizaleli nyonso ya likolo, makabo ya nguya mpe nguya; yo mpo na nani Nazali na lokumu monene; yo oyo Natalelaka lokola liso ya miso na Ngai, mwasi, okomi nini? Okoki komituna? Okoki, yo mpe, komituna mpo na komizongisa? Pamba te soki okokaki kokweisa mokili oyo mpe kobenda yango na bosoto, elakisi ete okoki kotombola yango. Ozeli nini mpo na kosala? Mpo na nini olali?

Bino, bato, mpo na nini bozali bakosi mingi mpe bato ya mayele mabe? Mpo na nini boboyi kotala solo na miso? Mpo na nini kosalela politiki ya nsoso na kondimisa ete bozali kozela bozongi ya Yesu? Boyebi malamu ete Yesu nde bozali kozela? Alukaki kopesa bino nini ya sika oyo apesaka bino te na mbula 2000 eleki? Boyebi malamu ete soki Yesu azongi lelo, bokokoka koyeba ye mpe kondima ye? Nalobi te! Elembo, Nakiti na mabele mbala mingi na milongo ndenge na ndenge, mpe ezalaka ntango nyonso ndenge moko: tango Ngai moko, nalobaka na nzela ya zoba oyo abengaka bino na balabala, boboyaka ye. Kasi bato mingi kati na bino bayebi liloba oyo ya solo epesami na zoba. Na mawa, boyambaka yango na kotambwisama mpe na kotiola: « Ah, azali zoba! » — « Oh, azali koloba solo! » — « Iyo, ezali kaka solo!… »

Na bosikisiki, solo oyo esengeli kolamusa bino, mpo bomikanisaka ete bozali kozela bozongi ya Yesu mpo na kobanda mosala. Kasi, milende na Ngai etikali na ntina te. Bino nyonso bozali bakosi, bato ya mayele mabe, bato oyo babungi nzela oyo baboyi kolamuka. Bososoli te ete bizaleli na bino ekokisi liloba oyo: « kati na bino oyo babengami ezali te bato mingi ya bwanya na mosuni, ezali te bato mingi ya nguya, ezali te bato mingi ya lokumu. Kasi Nzambe aponi biloko ya bozoba ya mokili mpo na koyokisa bwanya soni » ? [1] Kobanda lelo, Nakotika kotinda bino bazoba mpo na koyebisa bino Liloba na Ngai ya Solo. Yango esali ntina lisusu te.

Ata bongo, maloba oyo nyonso ezali sik'oyo na maboko na bino. Yesu asili kopesa bino yango; etikali kaka na bino kokoma na mozindo na yango. Nazali kaka na basaleli ya solo ya Nzambe oyo bazali kosala na nkuku mpe bazali kokoba kokundola bino maloba wana kaka ya Solo.

Nazongelaka bino biloko kaka wana, na lolenge oyo to na oyo, kasi eloko moko ebongwani te. Nabongisaka yango na bantango na bino, na bomoi na bino mpe na makambo na bino, mpo bokoka nsukansuka kososola, kasi na se, ezali kaka eloko moko. Bolingaka kotikala na mpongi na bino ya monene.

Boyebi, ata mbala moko, ntina ya bozali na bino awa na mabele? Mpo na nini Nakelaki bino mpe natiaki bino na mabele? Bozali kosala nini na mabele? Bozali kokende wapi sima ya kufa na bino? Soki moto akoki kofanda mpe kokola na kati mpo na komituna mituna ya lolenge oyo, elakisi ete asosoli mpe akuti nzela oyo asengeli kolanda mpo na lobiko na ye.

Nazali koloba bino na solo: bozali na mabele te mpo na bisengo, mpo na bosoto… Bozali na mabele te mpo na biloko nyonso ya masumu bozali kosala. Bino nyonso oyo bozali na mabele oyo, bakelamaki mpo na ntina moko: koyekola kobika na paradiso. Natindaki bino na mabele mpo na koyekola Mibeko na Ngai ya bule, Mibeko na Ngai zomi mpe Mokano na Ngai, oyo etambwisaka bomoi na paradiso. Ba-anzelu nyonso mpe bato nyonso oyo bafandaka na paradiso, bazali kobika kaka na Mibeko na Ngai ya bule. Soki bolingi kobika kuna, bosengeli koyekola mibeko wana. Biloko mosusu nyonso ezali kaka mpamba. Mpo na yango, bosala keba ete nzela oyo bozali kolanda ezala malamu mpe ekokani na oyo Nzambe alingi. Mituna bino moko soki biloko nyonso bozali kosala, soki bipai bozali kokende, ezali kolanda Mibeko na Ngai ya bule, Mibeko na Ngai zomi mpe Mokano na Ngai. Bomituna soki ezali lisusu likoki mpo na bino kozwa lisusu nzela ya malamu.

Bozali naino na likoki ya kobimisa nguya oyo Natiaki na kati na bino mpo na kozwa lisusu nzela na bino mpe kobima na mabunga? Talá mituna ya motuya. Mituna bino moko soki ezali normal kolekisa ntango na bino ntango nyonso na kosenga bolimbisi mpo na libaku ya sika ya kosikola masumu na bino.

Ntango nini bokozwa mokano ya kobanda mosala? Ntango nini bokozala na bosolo epai na bino moko? Ntango nini bokoluka koyangela bolembu na bino, bademon nyonso mpe bosoto ya molimo oyo ezali koyangela bino? Boni ezali na ba-bondeli oyo ya kosenga bolimbisi oyo ezangaka suka wapi lisiki ezali, to nde ezali na mokano na bino ya kotombola motu mpe kokende liboso mpo na kozwa lisusu nzela ya Mongongo na Ngai? Mituna bino moko, na mozindo ya bomoto na bino!

[1] 1 Corinthiens 1:26-27

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "Interrogez-vous !", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare