Mabe ya boyini
Molili ezali kosala makambo nyonso mpo na kobebisa misala nyonso ya bolingo na mokili. Moto nyonso oyo azali na boyini na motema na ye, akangami na zabolo oyo azali kosalela ye ndenge alingi. Boyini ezali liyoki, lolenge ya makanisi, bizaleli; ezali komonisa ya kotiola oyo ekangami, kanda oyo ekangi, zuwa ya mingi, bolula ya mabe, kozanga kosepela mpe mabe oyo ezangi ndelo. Na maloba moko, moto oyo azali na boyini, azali moto te mpe azali na molimo mabe. Boyini ekitisaka lokumu, eliaka, esalaka mpasi na kati, esalaka moto azala malamu te mpe azala na mawa...
Lolenge ya malamu mpo na komema bino na bososoli ya boyini, ezali na koyebisa bino likanisi ya Bolingo ya Nzambe, pamba te Ngai nazali Bolingo. Oyo ezali mosala ya mpasi mingi mpo na Ngai ya kosalela maloba na bino oyo ezali na ndelo mingi mpo na kolimbola Bonene ya Nzambe. Na lolenge wana, bozali kosenga Ngai ete nakotisa nzoku na mbeki. Tomeka!
Bato nyonso ya mokili oyo, nyonso oyo bazali, bazali na likanisi moke ya Bolingo na Ngai. Bolingo ezali Nguya oyo ewutaka na Ngai, Nzambe na bino Mokeli. Ezali peto, ezanga mbindo mpe etindaka. Bolingo elingaka kaka malamu. Bolingo ezali makasi. Bolingo na Ngai ezali monene boye ete ata moto ya malamu koleka na bato akoki te kokanisa oyo akoki kosala. Bolingo ekoki kobongola makambo mingi. Yango wana, moto nyonso oyo azali na bolingo na motema na ye, akoki kobongola bomoi. Moto oyo abimisaka nguya oyo ekanisi te, oyo ebendaka, epesaka nzela ya kokende liboso, ya kobongola mpe kobuka bikangeli nyonso na bomoi. Moloki moko te akoki kokoma na moto wana. Mpo na makambo yango, mosali nyonso ya Nzambe asengeli kotonda na Bolingo.
Bolingo ekabwani te na Bosolo pamba te elongaki ntango nyonso boyini. Oyo azali Bolingo, asengeli kolinga koloba Bosolo mpe kozala na likanisi ya Bolimbisi ya solosolo. Yango wana, nasenga bato nyonso oyo bamitangaka na Yesu-Klisto, ete bameka kotambol bomoi na bango kolanda ndakisa ya Yesu. Na likambo, ntango Yesu azalaki koyoka mpasi ya nzoto na bamir na ye na kros, mpe amonaki Kanda ya bule ya Ngai elingi kokwela baye babomaki ye, asambeli boye: "Tata, limbisa bango, pamba te bayebi te oyo bazali kosala" [1]. Nani kati na bino akoki kolakisa bolingo boye? Nani kati na bino alingaki te kosenga Tata na ye ya nguya asala mabe na banguna na ye mbala moko?
Nalakisi bato nyonso oyo bamitangaka bana na Ngai kolanda mateya mosusu ya Mwana na Ngai Yesu: "Bolinga banguna na bino, bopambola baye balakelaka bino mabe, bosalela baye bayinaka bino malamu, mpe bosambela baye banyokolaka bino mpe babundisaka bino, mpo ete bozala bana ya Tata na bino oyo azali na likolo" [2]. Ezali na bomoi ya bosantu nde bokolwana boyini na mokili.
Na moboko, moto nyonso oyo azali na eteni ya mwinda ya Nzambe na kati na ye, moto nyonso oyo akelami na elilingi ya Ngai, asengeli kozala bolingo, lokola Ngai Nzambe. Nzokande, masumu ekangaki bino, soki te, na ebandeli, Ngai napesaki bino nyonso. Masumu ekitisaka bino lokumu mpe esalaka ete bokita na mobulu. Moko ya ndakisa ezali kosangisa misala ya nzoto na bolingo. Kozala na boyokani ya nzoto elingi kolakisa te ete bolingana. Bato mibale bakoki kosala bongo mpo na bamposa ya nzoto kaka, oyo esili kosala masumu. Mpe yango nde ezalaki mingi na mokili. Na libala, bomoi ya nzoto ezali kolakisa te bolingo to kobimela ya lolenge ya malamu.
Boyokani ya nzoto ezali moko ya bamposa ya nzoto oyo bozali na yango elongo na banyama. Solo, oyo bamoyekoli ya siansi balobi ezali ya solosolo: bato ya liboso babotamaki wuta na sokwe. Na ebandeli, bomoi na mokili ezalaki makasi. Yango wana, natindaki liboso primates mpo ete babongola tii na etape ya sokwe minene oyo nzoto na bango ekokani na oyo nakanaki mpo na bino. Ezali na ntango wana nde napesaki nzela na bato ya liboso babotama na mokili, kokotaka na nzoto ya sokwe oyo ebongolaki. Mokemoke, molimo na bino esalaki ete nzoto ya nyama yango ekoma oyo bozali lelo. Mpo na kokanisa makambo wana, baloki mingi bakotaka na nzoto ya bambwa, banyau, banyoka, basolo, banjogu, bambakasa, bankosi... mpo na kosala na butu, sima bazongaka na bango na tongo.
Soki ezali boye, mpo na nini kotia boyokani ya nzoto na esika ya liboso na bomoi ya libala? Libala ezali bule koleka oyo bokanisaka. Libala ndenge nalobi, ezali bosangani ya milimo mibale oyo ekokani, milimo mibale oyo etalisani, elingi koloba, kati na mobali mpe mwasi oyo babotamaki moko mpo na mosusu. Mabala oyo etosaka Mibeko na Ngai esalamaka na likolo, liboso ya Ngai Nzambe. Libala ya solosolo ezali bopetoli ya oyo esalemaki na likolo liboso ya mbotama na bino na mokili. Na yango, na libala, bato mibale batongaka boyokani ya bule oyo ekangaka bango mpe esalisaka bango mpo na kokola na molimo kolanda Mibeko na Ngai, na bitumba ya kosunga bango na bango, na bolingo ya solosolo ya milimo, na malamu mpe mabe.
Na likambo wana, Bolingo ezwaka likanisi mobimba ya oyo Mwana na Ngai Yesu ateyaki bino: "Okolinga mwasi ya pembeni na yo lokola yo moko" [3]. Bosengeli kozala bilibili ya bango na bango, na koyika mpasi, na koyikela mawa, na bososoli, na botosi, na komipesa, na komikitisa, na kosolola, na bopeto mpe na bosembo. Koyoka mabe na motema ezali na esika te na libala ya boyokani. Makasi esengeli kozala, pamba te kolinga elingi te kopesa mwasi nyonso oyo alingi, to kopesa mobali nzela ya kosala nyonso oyo alingi. Ntango mosusu, milimo ya solosolo ya bango na bango oyo bavandaka lokola bandeko ya mobali na mwasi, na kobanga Ngai, batikaka misala ya nzoto na esika ya mibale. Ezali koseka komona milimo ya solosolo ya bango na bango kokende na kokabwana mpo na makambo ya nzoto.
Wuta na Bolingo ewutaka kopesa moto, komipesa, koyika mpasi, makasi, bopeto, bosembo, bonene, bolimbisi mpe koyikela mawa. Yango wana, Ngai, Nzambe oyo nazali lisanga oyo ekawukaka te ya Bolingo, nazali na Mawa mpe Koyika Mpasi na Ngai esalaka ete bokanisa ete nazali lolanda mpe zoba liboso ya bokei na nzela mabe na bino. Bobuni makanisi wana, namonaka nyonso mpe nayebaka nyonso, ata makambo oyo ekoya sima na bankama ya mibu, pamba te nazali nde nasalaka makambo nyonso wana na bosikisiki mpe na likebi oyo ekanisi te.
Na Bolingo na Ngai, natindaki bino Mwana na Ngai Yesu mpo na kobikisa bino pamba te kilo ya masumu na mokili ezalaki boye ete moko te ya basakoli na Ngai alongaki solo kokatola loposo ya maji oyo ekangiaki miso mpe matoyi na bino ya molimo. Satana mpe ekipi na ye elongaki ntango nyonso kotinda bino boboma basali na Ngai. Na makambo ya malamu, bozalaki kosala lokola bozali koyoka bango, kasi soki bakei na mokili, bobobomaka bango na kokosola mateya na bango.
Mibeko na Ngai ekoki kobongolama te mpe ekokisamaka ntango nyonso atako tango eleki boye. Bokofuta mpo na misala na bino nyonso ya kala, mpe Yesu akebisaki bino na likambo wana: "Mawa na bino! Pamba te botongaka bakunda ya basakoli, oyo batata na bino babomaki... Yango wana bwanya ya Nzambe elobi boye: nakotindela bango basakoli mpe bantoma; bakoboma bamoko mpe bakobundisa basusu, mpo ete elonga wana etuna makila ya basakoli nyonso oyo esopanaki kobanda na bokeli ya mokili... Solo, nalobi na bino, elonga wana ekotunama" [4].
Kondima kaka mpo Mwana na Ngai Yesu abotama na mokili, ezalaki komipesa moko. Komipesa oyo ezali na likambo oyo Nzambe andimi kobotama na mokili oyo azali na ye te, mokili oyo ebebisamaki na masumu, mokili oyo emosukami na mbindo ya molimo; mokili oyo ebongolami esika ya komipema ya ba demoni ya lolenge nyonso.
Mpo na kopesa bososoli ya makambo oyo na pete, namonisi bino elilingi ya esika monene ya mokili epai wapi babwaki nyonso ya mokili. Bokanisa bibembe ya bato, ya banyama oyo ezali kopola, mai mabe, bosoto bowutaki na ba usine, ba morgue, ba lopitalo, ya bandako, oyo epoli mingi mpe ebimisaka nsolo ya mabe, nsolo ya kokanga mpe oyo ekoki kokatola pole... Likambo ya mpasi ezali ete na esika wana ya mabe, ezali naino bato moke oyo basambeli Ngai, babundanaka mpo na kozonga na engumba moke oyo ezali peto epai Pole na Ngai, Mokano na Ngai ezalaki. Soki nasenga moto ya esika mosusu oyo ayebi likambo oyo te mpe avandaka na mokili mosusu ya peto, aya kobikisa bato moke wana oyo bazali na mpasi, mpe moto wana andimi na esengo, yango ezali kolakisa te bolingo, komipesa, komipesa? Ntango na mosala na ye, bato oyo babungi na masumu, na boyini, bakateli kopekisa moto wana na koboma ye, nini ezali na tina na kopesa Ngai mbeba ya mobomi wana?
Liboso ya Yesu, basali nyonso mosusu oyo natindaki na mokili, nyonso babundismaki, babomaki to bakangamaki mpo na kobomba Liloba na Ngai ya Bosolo. Lokola boyebaki Yesu te, na ntango wana, bokanisaki ye lokola motinde ya Nzambe kaka. Boye, bopesaki ye ndenge moko na basusu. Nzambe akoki koboma, kokende na nkani ya Mitindo na ye moko "Okoboma te"?
Soki liwa ya Yesu-Klisto ezalaki mabongisi na Ngai, mpo na nini Yudasi ayokaki mawa na maloba oyo: "Nasali masumu na kokaba makila ya moto oyo asali mabe te"? [5]. Mpo na nini, komona oyo ekoya na misala na bino, Yesu ayokaki mawa na bino na maloba oyo: "...bana basi ya Yelusalemi, boleli Ngai te; bolelaka bino moko mpe bana na bino"? [6]
Yesu asalaki komipesa mbala mibale, yambo na kondima kobotama kati na bino, na mokili, sima na kobundana na liwa mpo na Elonga ya Bosolo ya Nzambe. Bolingaki koloba nini soki Yesu akimaki oyo bazalaki kobongisa? "Mpo na nini akimi soki azali Mwana ya Nzambe ya solosolo?", "Mpo na nini akimi, ntango kaka balingi kosenga ye alakisa ete alobi Bosolo?", etc. Liwa ya Yesu ezalaki kokweya ya mabongisi ya molili. Liwa na ye etiaki elembo ya Bosolo ya Nzambe na mokili. Wana, liwa ezali nini? Koleka wuta mokili moko tii na mosusu: Yesu alongwaki na mokili ya misinga mpo na kozonga na Bokonzi ya Nzambe.
Lelo, nani ayebi Maloba ya Basakoli na Ngai te, mateya ya Abraham, ya Moyize...? Yango nde Elonga ya Nzambe na molili. Ngai Nzambe, nasali eteni na Ngai ya komipesa. Etikali na bino komona mateya na Ngai ya solosolo mpe kosalela yango na bomoi na bino, mpo na lobiko na bino.
Napesaki bino bososoli ya boyini oyo ezali kobalukela, koboya Bolingo na pete. Molili ezali kosala makambo nyonso mpo na kobebisa misala nyonso ya bolingo na mokili. Moto nyonso oyo azali na boyini na motema na ye, akangami na zabolo oyo azali kosalela ye ndenge alingi. Boyini ezali liyoki, lolenge ya makanisi, bizaleli; ezali komonisa ya kotiola oyo ekangami, kanda oyo ekangi, zuwa ya mingi, bolula ya mabe, kozanga kosepela mpe mabe oyo ezangi ndelo. Na maloba moko, moto oyo azali na boyini, azali moto te mpe azali na molimo mabe. Boyini ekitisaka lokumu, eliaka, esalaka mpasi na kati, esalaka moto azala malamu te mpe azala na mawa. Kozala na boyini na motema, ezali koyoka mawa ya bomoke na yo, ya kozanga malamu na yo liboso ya basusu. Ezali koboya kondima oyo ozali, mpe kopamela basusu ete bango bazali na tina ya mawa na yo. Boyini etindaka na makambo ya mobulu mpe ya koboma.
Na moboko, bato nyonso oyo bazali na boyini na motema na bango bayinaka, na tina te, baye bavandaka na Bosolo. Yango wana, basali na Ngai nyonso babwakamaka na libota, bakozwaka kondima ya bato moke kaka oyo bazali na lilambi ya molimo. Milata makasi, bino oyo bokateli kotambola bomoi ya bule. Bokonyokolama bisika nyonso, ndenge basakoli na Ngai ya mpiko. Boteleme makasi pamba te yango nde komekama na bino.
[1] Luc 23:34, [2] Luc 5:44-45, [3] Matthieu 22:39, [4] Luc 11, 47-52, [5] Matthieu 27:4, [6] Luc 23 :27-28
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Le mal de la haine", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Sources Ph. illustration: www.freepik.com
