Mwasi na mosala ya Nzambe

Mwasi atonda na lofundu, azali ntango nyonso koluka kokani na mobali. Soki mwasi moko oyo azali na mission abengami mpo na kozwa nsango ya Ngai Nzambe mpo na kopesa yango na bato na Ngai, akanisaka ete azali likolo ya biloko nyonso. Basi mosusu bamitombolaka ete bazali basi ya basali ya Nzambe, kaka mpo na komitombola to kosepelisa baninga na bango. Mpe mabe koleka, basi mosusu bakanisaka ete bazali banzamba...

Mwasi na mosala ya Nzambe

Ngai Nzambe ya seko, Nakomaka mwasi ndenge nakanisaki ye pamba te nayebi nini natiaki na kati na ye. Nakelaki ye na nguya, na komikitisa, na mayele, na bolendi kosalisa, na bolingo mpe na nsoni. Nakelaki ye na elilingi ya Ngolu ya Nzambe. Mwasi ndenge nakelaki ye, azali na esika ya ntina mingi na kokokisa mokano ya Nzambe, pamba te akosalaka mosala ya ntina na sekele ya bokeli na kopesa bomoi. Mwasi ndenge nalingi, asengeli azala ya molimo. Na maloba mosusu, asengeli azala na boyokani ya tango nyonso na Ngai Nzambe, Mokeli na ye mpe bikelamu nyonso ya Nzambe oyo natindaki mpo na kosalisa ye, mingimingi bikelamu ya pole, ba-anjelu bakengeli mpe anjelu mokengeli na ye.

Na likambo oyo, mwasi asengeli azala ndakisa na libota mpe na bato nyonso. Solo, banda kobotama na ye ya liboso na mabele, nalingaki ete mwasi alakisa bato nini ayekolaki epai na Ngai Nzambe, Mokeli wa mokili mobimba, mpo na kotambolisa bango na nzela ya Solo.

Atako nyonso oyo nasalaki, atako bobateli nyonso oyo napesaka ye ntango nyonso mpe na bisika nyonso, mwasi azali kokima na nzela oyo nakataki banda liboso pamba te esika na ye ya ntina ezali kotombola ye. Atonda na lofundu, mwasi azali ntango nyonso koluka kokani na mobali.

Soki mwasi moko oyo azali na mission abengami mpo na kozwa nsango ya Ngai Nzambe mpo na kopesa yango na bato na Ngai, akanisaka ete azali likolo ya biloko nyonso. Basi mosusu bamitombolaka ete bazali basi ya basali ya Nzambe, kaka mpo na komitombola to kosepelisa baninga na bango. Mpe mabe koleka, basi mosusu bakanisaka ete bazali banzambe.

Basi, boyebi solo mokumba na bino? Bosengeli bozala lisungi ya mibali na bino mpe ya mibali nyonso, na makambo nyonso. Mpo na kosala bongo, bosengeli bozala mpe bosala na molili; bosengeli bozala ntango nyonso na boyokani na Ngai, Nzambe na bino.

Kasi mawa, mawa mbala nkoto! Elilingi nini bozali kopesa Ngai? Ya basi ya mosali ya Nzambe oyo bazali kosala masapo ya liboma koleka losambo. Bokoki te kutu kosala na boyebi te mpe kobatela basekele te. Bozali kofungola bato nyonso mpe kutu tempelo. Basekele ya tempelo ekomi makambo na bino ya kolobana. Basi ya masapo! Nsoni nini!

Bozali komona matiti na miso ya bandeko na bino, kasi bokoki komona zamba oyo ezali na miso na bino moko te. Bozali kokimisa bato na Ngai na Ngai. Bino nyonso bozali bakosi! Bozali kopesa ndakisa moko te, bozali kolakisa mayele moko te. Ba-oyo bamitangaka ba-prophetesse babosanaka mission na bango ya lokumu mpo na kolukaka komonana mpe kosepelisa mibali.

Bino basi, bobebaki na mission. Bozali komonisa bomoto na lolenge bozali kolata bilamba. Mpo na nini bozali koluka ntango nyonso kosepelisa mokili? Bolamuka mpe bosala keba na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na bino.

Ba-oyo bazali na matoyi, bayoka nsango oyo mpe bazonga na makambo ya ntina pamba te ntango ezali moke mpe ezali ya bino te.

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO!

Traduction du message original "La femme dans le ministère", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare

Sources Ph. illustration: www.pinterest.fr, hiclipart.com