Ntembe ezali kolya kondima

Ntembe ezali monguna mabe koleka ya kondima. Yango wana, moto oyo azali na ntembe azangi kondima. Kasi, kozanga kondima, okoki te kobika na mokili oyo na kogumbamela Nzambe na bosantu. Kozanga kondima, mabondeli na yo nyonso ekoki koyangama te. Kotyola ntembe na Ngai Nzambe, ezali kofinga Ngai na koyeba te, ezali kotya na liwa Nguya na Ngai mpe Makasi na Ngai...

Ntembe ezali kolya kondima

Ntembe ezali monguna mabe koleka ya kondima. Ezali ngenge mabe koleka oyo ezali koboma kondima. Ntembe ezali yango moko ya banguna mabe koleka ya bandimi ya solo, ya bana nyonso ya Nzambe. Yango wana, moto oyo azali na ntembe azangi kondima. Kasi, kozanga kondima, bokoki te kobika na mokili oyo na kogumbamela Nzambe na bosantu. Kozanga kondima, mabondeli na bino nyonso ekoki koyangama te. Yango wana, Yesu azalaki koloba makasi na likambo oyo na maloba oyo: "Bozala na kondima na Nzambe. Nalobi na bino na solo, soki moto alobi na ngomba oyo: Longwa wana mpe mibwaka na ebale monene, mpe soki atyoli ntembe te na motema na ye, kasi andimi ete oyo alobi ekosalema, akomona yango ekokokisama."[1]

Na mawa mingi, bino nyonso bokomi ba champions na ntembe. Mpo na nini bolingi komona liboso ya kondima? Nalobi na bino na solo, esengo na ye oyo andimi kozanga komona. Ndenge nini bolingi kosala mosala na Ngai mpe misala na Ngai soki bozali kotyola ntembe na oyo Nalobi na bino mpe nakoki kosala? Ndenge nini bolingi kolanda Ngai ntango bozali na motema ya kotyela Ngai motema te? Ntembe ezali kopekisa bino kondima na liloba na Ngai ya Solo. Kasi, "oyo atyoli ntembe azali lokola mbonge ya ebale monene, oyo mopepe ezali koningisa mpe ezali kobengana epai na epai. Tika ete moto ya ndenge wana akanisa te ete akozwa eloko moko epai ya Nkolo: azali moto ya mitema mibale, azangi bondimi na banzela na ye nyonso."[2]

Kotyola ntembe na Ngai Nzambe, ezali kofinga Ngai na koyeba te, ezali kotya na liwa Nguya na Ngai mpe Makasi na Ngai. Boyebi te ete ntembe ezali kolongola bino bibundeli, mpe ezali bolemi monene mpo na bino, basali ya Nzambe, bana ya Nzambe? Na ntembe, bokokoka te kobunda mpe kolonga monguna, pamba te Nguya na Ngai ekozala na bino te.

Ntembe ezali libaku ya makasi ya kobebisa oyo satana azali kosalela mpo na kotelemela bato nyonso oyo bandimi na Nzambe. Na ntembe, satana akolonga kokenda na bino epai ya banzambe ya bapaya, ntango Ngai nazali Nzambe ya zuwa, Nzambe moko kaka Mokeli ya Univers. Ngai nazali Nkolo ya bomoi nyonso na likolo, na mabele mpe na nse ya mabele. Ngai nazali Nkombo oyo ezali likoló ya bakombo nyonso, mpe liboso ya Nkombo na Ngai mabolongo nyonso efukamaka na ba cieux, na mabele mpe na nse ya mabele. Ngai nazali etima ya maï oyo ekoki kokawuka te, mpe nzete nyonso oyo ezali pembeni ya etima oyo ya maï ekokawuka te.

Nini nasengeli kosala mpo na kopekisa bino kobongola elongi na bino epai ya ba fétiches, ba marabouts, ba occultistes...? Bozali na motema mpenza ete makambo oyo nyonso ekoki kopesa bino na ndenge ya malamu mpe ya koumela mosala, kobota bana mpe makambo mingi mosusu, kozanga mabe na nsima? Mokolo na mokolo, bozali kosala mabunga ebele mingi na bikateli na bino mpo na ba ntembe na bino oyo ezangi nsuka mpe kozanga kondima na bino mpo na Ngai. Mitema na bino ezali koningana-ningana ntango nyonso lokola ba girouettes. Bozali koleka ntango na bino nyonso na komituna mituna na ntina na Ngai, ntango Ngai nazali kochangana te na kokokisa ba promesses na Ngai. Nazali moto mpo naloba lokuta na bino, mpe nasala kobongola makanisi?

Nasalaki bino bilaka ya lokuta te. Nasalaka oyo nalobi mpe napesaka oyo nalaki. Na likambo wana, mpo na nini bozali kotyola ntembe na maloba na Ngai, bato ya botomboki? Bizaleli na bino ya ntembe ezali kolakisa kozanga bolingo na bino mpo na Ngai, pamba te ntango moto alingaka, azalaka na motema ya kotyela motema mpe kondima. Na libala, ntango motema ya kotyela motema ezali te, ntembe eyingeli mpe botomboki ekotaka na ebele ya mawa na yango. Moko na moko azali kokosa moninga na ye na kokende koluka na esika mosusu. Ezali te yango bizaleli oyo bozali na yango mpo na Ngai? Ntembe ezali kotinda bino kokende koluka banzambe mosusu, kolongola bino na nzela ya sembo, ntango Ngai nazali nzela, Solo mpe bomoi. Ngai nazali Nzambe na bino Mokeli. Ngai nazali moboko ya Bokeli nyonso. Ngai nazali ndenge moko lobi, lelo mpe mpo na libela; Nabongwanaka te mpe nakobongwana te.

Napesi bino mposa ya kotikala ba constants mpe ya makasi na makanisi na bino mpo na Ngai. Mpe mingi mpenza, bobatela kondima!

[1] Marc 11:22-23, [2] Jacques 1:6-8

Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.

Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !

Traduction du message original "Le doute ronge la foi", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.

AGA News - TIA Lazare