Ngolu eyaka mbala moko kaka na bomoi ya moto
Ngolu ya Nzambe ezali moko kaka na bomoi ya moto, mpo ebongisami na bokebi makasi kobanda na mbotama na ye tii na mokolo ya kokokisama. Ezali ntango ya esengo na likolo. Ngolu ezali kokokisama ya kokamwa ya Mokano na Ngai na bomoi ya moto nyonso, ntango oyo ekoki. Etielami na Bolingo na Ngai, Mawa na Ngai, Motema molai na Ngai mpe Bwanya na Ngai. Bososola ete oyo ezali Ngolu ya Nzambe ya ndenge mosusu, noki te nyonso ezali ngolu na bomoi na bino...
Ngolu ya Nzambe ezali lokola likabo, ngolu, ntango, likambo, bosukisi, bongisi mpe kokokisama ya kokamwa, oyo ekokani na esika ya likolo na bomoi ya moto. Ngolu ya Nzambe ezali moko kaka na bomoi ya moto, mpo ebongisami na bokebi makasi kobanda na mbotama na ye tii na mokolo ya kokokisama. Ezali ntango ya esengo monene na likolo mpe lifuti ya ba-anzelu nyonso, bilimo ya ntina mpe bilimo ya pole oyo bapesaki ntango molai ya bango mpo na kolonga ya likambo yango. Ngolu ezali kokokisama ya kokamwa ya Mokano na Ngai na bomoi ya moto nyonso, ntango oyo ekoki. Ngolu euti na Mokano na Ngai mpe esalemi na ndenge ya Mibeko na Ngai ya Mosantu mpe Mibeko na Ngai Zomi. Etielami na Bolingo na Ngai, Mawa na Ngai, Motema molai na Ngai mpe Bwanya na Ngai.
Na nzela ya maloba nyonso oyo, bozali koyeba ete Ngai nazali koloba na tina ya Ngolu ya Nzambe ya ndenge mosusu, noki te nyonso ezali ngolu na bomoi na bino: kolala mpe kolamuka na ntɔngɔ, yango ezali ngolu. Kozala na nzoto kolongono, yango ezali ngolu. Kokima na pɛtɛɛ liboma to mbeba oyo ekoki koboma, yango ezali ngolu. Kozala moto ya malamu koleka na lisanga na yo, yango ezali ngolu. Kozala mwasi ya Abraham to ya Moyize, yango ezali ngolu. Kozala mama ya Yesu to ya Molimo Mosantu, yango ezali ngolu monene makasi, mpe misusu.
Lolenge mpe mokolo ya Ngolu ya Nzambe ya ndenge mosusu ekeseni kobanda na moto moko tii na mosusu. Bino nyonso, moto na moto azali na ntango na ye ya Ngolu ya ndenge mosusu. Mawa, bato nyonso pene bazali koleka pembeni ya libaku oyo ya kokamwa, oyo eleki motuya mpe oyo ekoki komonana te, mpo na mabunga na bango ebele. Nzokande, Ngolu ya ndenge mosusu ebɛtaka na ekuke ya moto nyonso na ngonga ya sikisiki ya kokokisama na yango. Soki obungi yango mbala moko, obungi yango libela na libela, mpo ezali na bomoko ya kokamwa.
Yango ekomelaka bino mpo bozali kobondela te, nzokande losambo ezali ebombelo na bino kaka oyo molili ezali kobanga. Zabolo ayebi malamu mokolo mpe ngonga ya ngolu na bino ya ndenge mosusu. Yango wana, atindi ekipi na ye baluka bino mpo na kolandela bino mpe kotia bino mitambo mpo bokokweya liboso ya kokokisama oyo bazali kozela mingi. Lisusu, bozali kobimisa mabunga mpe bizaleli ya mabe oyo etali misala na bino ya mabe, masano mpe makanisi oyo ezali kotinda bino na baponi ya mabe. Ndakisa, likambo nini ezali kosɛnga moto kotika kopona mobali/mwasi ya mikolo ekoya oyo azali na bonene, kilo, langi ya miso, ndenge boye to boye…? Mobali/mwasi ya malamu nyonso azali? Bino moko, bozali bato ya malamu nyonso? Mpo na nini bozali kotia motema na losambo mpe makanisi na bino kaka mpo na kozwa molɔngani ya molimo na bino? Tala mitunga ya pamba!
Lokola Ngai nazali Bolingo mpe nazali na Mawa, Ngai nakoki kotalela lisusu baye nyonso oyo bazali kobongola makanisi, kozongisa bango moko mpe kozali kosenga ngolu na Ngai, kasi boyeba ete bokoki te, ata moke te, kozwa libaku mosusu ekokani na oyo ya ebandeli oyo Ngolu ya ndenge mosusu epesaki. Na esika na yango, bokokoka kozwa kaka banzela mosusu ya kobongisa mpo na kobondisa bino. Bantina ndenge na ndenge ezali komonisa yango, mpe nyonso ezali na boyokani na bomati kondima na bino, botosi te na bino, botosi te, kotya na ngambo mpe mingi koleka, likoki te ya kozongisa ntango, mpo makambo mosusu ekoki kosalama ndenge moko te lisusu. Lisusu, makambo mingi ezali ya bomoko mpe ekomelaka mbala moko kaka na bomoi ya moto.
Ngai nakopesa bino bandakisa mpo na kosalisa bino boyeba malamu likanisi ya Ngolu ya Nzambe ya ndenge mosusu: Abraham azalaki mosaleli ya Nzambe ya kokamwa, lokola basusu mingi, na lisolo ya bato. Sara azwaki Ngolu ya kozala mwasi ya nkolo monene oyo ya Nzambe. Kobanda na mbotama na ye, apesami na Abraham. Abongisami mpe atondisami na makabo ya kokamwa mpo na kofanda pembeni ya moto oyo ya kondima. Likambo nini ekomonana soki Sara abungi libaku yango, nzokande akokaki kofanda kaka na moto oyo, moto mosusu te? Mwasi mosusu nani akokaki kozala na makasi ekokani na Sara mpo na koyika makasi mpe makabo ya nguya ya Abraham?
Na ndenge ndenge, bilenge basi babotami mpe balengelami mpo na kosala misala na Ngai pembeni ya basali mosusu ya Nzambe. Ntango ekoki, bamibombaka baponaka bomoi ya bonsomi mpe ya bolingo oyo epesami na bisengo ya mokili oyo. Mibali nini mosusu bakoki kokoka na basali oyo ya Nzambe oyo babungi nzela? Boye, bozali na nkoto ya nkoto mpe nkoto ya nkoto ya basi oyo bazali libala te oyo bazali koganga epai na Ngai mokolo na mokolo. Ntango nayanoli mabondeli na bango, babandi lisusu mabunga ndenge moko oyo euti na maposa na bango mpe mabunga na bango.
Basi bazali koboya kozala na esika oyo Ngai Nzambe, nalingi: basi basengeli kozala ya molimo, bakonzi oyo basalaka ndako na bango esika mosantu oyo etiyami mpo na kotonga bokonzi na Ngai ya kimia na mabele. Basi basengeli kosala ndako ezala nse ya mateya ya molimo ya bana na Ngai na mabele. Nyonso oyo etikali ezali kaka biloko ya kobakisa oyo esengeli kolanda misala oyo ya lokumu. Ata mwasi azala mokambi monene, mosali ya mayele mingi, moyekoli mpe mokambi na makambo ndenge ndenge, asengeli kobosana te mosala na ye ya liboso ya mwasi ya molimo.
Tozwa ndakisa mosusu ya Ngolu oyo ebungi: Natindaka moko ya basali na Ngai koyangela ekolo mpo na kobongisa bokonzi ya kimia na mabele. Bango nyonso oyo basengeli kosalisa ye na mosala oyo babotami na mabele na ntango ya kobongisa misala na ye. Ezali bajenelare, basoda, bakengeli ya nzoto, bazuzi, bakambi, baenjeniere, baarchitecte, ba-scientifique, ba-chauffeur, basali, bato ya ndako, basakoli basi, na mokuse, ezali bango nyonso oyo bakosalisa ye na mosala na ye. Mingimingi, bato nyonso oyo bazali basali ya Nzambe oyo batongami makasi na nguya mpe makabo ya Nzambe.
Etali te etumba oyo ebundami, kasi na ngonga ya kokokisama ya Ngolu ya liboso, mobali oyo akomi na bokonzi ya likolo, na esengo monene ya ba-anjelu mpe ya bango nyonso oyo bazali kolanda ye na mosala. Na likambo oyo, nini ekoleka soki mosali oyo ya Nzambe abungi nzela na kolangwa ya nguya ya mabele mpo na kokende mosika ya mosala na ye ya molimo? Lisusu, mingi ya basali oyo babungaki nzela bazali koboya Ngai mpo na kondima zabolo, na nzela ya mibeko ya makila. Bongo, Nalongolaka bango na nguya na ndenge moko to na mosusu.
Ata soki nsima, mosali wana azongeli ye moko na boboti ya solo ya motema, mpe azongeli epai na Ngai na bomoi ya bolingo ya Nzambe, nzela nini mosusu nazali na yango ya kosangisa bameko ndenge moko ya bokonzi na ye oyo ebuniaki, ntango mingi ya bato ya ekipi na ye ya ebandeli bazali batiami na bisika mosusu, to bazali na pembeni to bakufi? Boyeba ete nazongaka nsima mpasi. Kasi, mpo na misala mosusu ya lolenge oyo, nabongisaka ntango mosusu mabongisi A, B to C. Soki ezali bongo, ezali ete yango ebongisami lokola bongo liboso. Ntango mabongisi A esalaki te, naponaka mabongisi B mpe boye boye. Kasi, bosengeli koyeba ete moto moko te azali na ntina mingi epai na Ngai Nzambe. Ntango mokonzi Saul atelemaki liboso na Ngai, Nabongolaki ye na David oyo azalaki motosi koleka, na limemya mpe na bomikaboli na likambo na Ngai.
Bandakisa mingi mosusu ezali kolakisa bomoko ya Ngolu na Ngai ya liboso: Jean Baptiste azalaki mosali moko kaka oyo azwaki nguya ya kobatisa Yesu-Klisto. Soki abalukaki mosala na ye, nalingaki kozwa solution mosusu, kasi ye alingaki kozala na libaku mosusu te ya kobatisa Yesu-Klisto. Alingaki koleka pembeni ya Ngolu oyo ya Nzambe.
Yosefi mpe Marie basalaki oyo ezalaki na makoki na bango mpo na bolongi ya mosala ya Yesu. Ata soki Marie abungisaki kondima na ntango ya bolenge ya Yesu, bongo azwaki yango lisusu mokolo ya kobakama ya ye na kulusu na Golgotha, abongi boyambi ya bato nyonso ya mokili mpo na kozwa mpe komema nzoto ya Mwana ya Nzambe. Mwasi nani mosusu akokaki kosala mosala oyo? Ngolu oyo ya bomoko ebombamaki mpo na Marie. Boswani ye boyambi, kasi bosambela ye te, pamba te maloba lokumu mpe kosambela ekelami mpo na Ngai, Nzambe Moko kaka, Mokeli ya Mboka ya Likoló.
Na lolenge ya mwa nyonso, Ngolu ya Nzambe euti na Mokano na Ngai mpe ebongi te, kasi Nalobi na bino na Bosolo, ebongi mpo na bato mosusu ya Nzambe oyo balakisaki na bomoi na bango ya liboso. Lelo, Abraham azali na mabele mpo na mosala mosusu; Moyize azali mpe na mabele mpe azali kokoba koteya bana ya Nzambe, mpe basusu. Napesaki Ngolu na Ngai na basali nyonso oyo ya Nzambe ya kozonga na mabele pamba te babongi kotyelama motema na Ngai oyo euti na mosala na bango ya liboso. Moyize azalaki na mabele na ntango ya Yesu-Klisto, ya Molimo Mosantu, mpe azali sikoyo na mabele, kati na bino. Botuna ye mpe akolimbola bino Mibeko Zomi ya Nzambe na makambo nyonso ya mike-mike. Akozonga na mabele nsima ya liwa na ye mpo azali kopesa Ngai esengo ntango nyonso na botosi mpe kondima na kosalela misala oyo napesaka ye. Mpo na basali ya Nzambe lokola Moyize, Ngolu ya Nzambe ebongi. Napesaka bango yango na esengo mpe na motema ya kotyelama motema.
Lelo, bozali kosenga na libaku te mpe wapi te kozonga ya Yesu. Soki yango esengelaki kozala bongo, nani kati na basi ya mabele oyo akokoka Marie mpo na koyamba ye na libumu na ye? Wapi akobotama? Na Afrika, na Mpoto, na Azi, na Ameriki...? Mangomba to mimeseno nini ekondima ete azali ya bango te? Nini akoteya bino ya sika oyo bozali na yango te na maboko na bino sikoyo?
Botika bozoba na bino mpe bómipetola na pole ya Mibeko na Ngai ya Bosantu mpe Mibeko Zomi. Yesu ateyaki bino bomoi ya komibulisa mpe ya bolingo ya Nzambe. Mpo na nini bozali kokela ezaleli ya komona Yesu azonga na mabele liboso ya kotya mateya na ye na misala na bomoi na bino? Soki bozali kozela moto ya nzoto ya Yesu, bobima na ndoto na bino. Soki bozali kozela mateya ya Yesu, ezali kala na maboko na bino. Mateya ya Yesu etikaki bino ata moke te, bongo mpo na nini bozali kozela kozonga na yango?
Ezali mpo Yesu ayaki nanu te nde bokómikangisa na bakweyi ya lokuta, na bato ya maji, na zabolo? Botika bozoba na bino, bino bato ya komikosa, ya lolendo! Lobi, bobengaki ye mofingi Nzambe. Lelo, bozali koloba ete bozali kozela ye liboso ya kosukola bosoto na bino ya molimo. Makambo nini ya kozanga tina! Koya ya Yesu na mabele ezalaki Ngolu ya Nzambe ya kokamwa. Ekozonga lisusu te. Na ndenge wana, bosalaki nini mpo na kobona ngolu oyo uta na Ngai?
Na liwa na ye, Yesu, Bolingo na Ngai ya Nzambe, akotaki na Ngai Nzambe pamba te azali eteni ya Ngai. Banda ebandeli, nazali elongo na bino, natikaki bino ata moke te. Nazalaki, nazali mpe nakozala. Nazali ya kala ya mikolo, libanga ya mikeke. Nazali ndenge moko lobi, lelo mpe mpo na libela; Nabongwanaka te mpe nakobongwana ata moke te. Nazali etima ya mai, mpe moto nyonso, nzete nyonso oyo ezali pembeni ya etima oyo ya mai ekokawuka ata moke te. Nazali moboko ya Bokeli nyonso. Banda ntango ya kala, napesaki bino mpe nazali ntango nyonso kopesa bino nyonso na Ngolu na Ngai. Bino bopesaka Ngai nini na lifuti ya boboto na Ngai?
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "La grâce ne vient qu'une seule fois dans la vie d'un être humain", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
