Kozanga botondi ezali lisumu ya monene
Moto oyo azangi botondi akoki kokoka te kozala na kondima, mpo kozala na kondima, ezali komona ete Nzambe azali Mozalisi mpe Mopesi-bolamu na yo... Ezala malamu nini bokosala mpo na bango, bakobalola bino mokongo na bango, na mawa ata moke te to na botondi ata moke te. Bakosundola bino tango kaka bakozwa epai na bino oyo bazalaki kozela na motema molai mpe na lokuta...
Kozanga botondi ezali ya kala lokola bokweyi ya bomoto na kati ya lisumu; yango ezali kutu likolo na yango, na ndenge oyo, na bizaleli na bango ya kozanga botondi, bato batombokelaki mibeko oyo napesaki bango kala. Bakendeki mosika koleka, na kotelemela mobeko oyo napesaki bango ya kolia te mbuma ya nzete ya boyebi ya malamu mpe mabe. Balobaki na mitema na bango: « Soki Yawe Nzambe apekisi biso kolia mbuma oyo epekisami, ezali mpo abombeli biso eloko moko; na ntembe te, alingi te tokoma na nguya lokola ye… ». Talá ndenge lolendo etindaki bino na kotosa te, na nsima na bokweyi na kati ya lisumu.
Soki bolandi malamu, nyonso eutaka na kozanga botondi liboso na Ngai, Yawe Nzambe oyo azalisaki bango na bolamu na elilingi mpe ekokani na Ngai. Na esika ya kotondo Ngai mpe kopesa Ngai lokumu nyonso oyo ebongi na Ngai, bato babandaki kokokanisa bango na Ngai, kokolisa nkanda mpe mabe ya ndenge na ndenge na kati na bango, koboma bizaleli nyonso ya bolingo mpe boboto oyo natiaki na bango; batelemelaki Ngai. Yango wana ezali kozanga botondi. Na solo, likanisi wana ya kokokanisa na Ngai, Nzambe Nguya-Nyonso, Yawe ya Mampinga, Ntambwe ya libota ya Yuda, euti wapi? Euti na lolendo, na nkanda mpe na kozanga botondi. Nakoloba ata mpe te na tina na kozanga kondima, mpo bamitangi bango moko lokola banzambe. Soki te, nini ekoki kondimisa lokakatani ya boye?
Soki bato bakoki kozanga botondi liboso na Ngai, Nzambe, Mozalisi na bango, bokoki kososola na pete ete ezali mpe pete mpo na bango kosala bongo epai ya bandeko na bango. Mingimingi lokola babungisi bolingo oyo ezalaki na kati na bango, bolingo oyo ezali mobeko ya mibale ya monene oyo natiaki na mokili. Bibandeli ya solo ya kozanga botondi ezali boye: kozanga kondima, nkanda, bomoyibi mpe kozanga bolingo epai ya moninga. Nzokande, nasili koyebisa bino ntango nyonso mpe namikundola lisusu: mobeko na Ngai ya liboso mpe ya monene ezali: « Okolinga Nkolo Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso », mpe ya mibale ezali: « Okolinga moninga na yo lokola yo moko »[1].
Soki, uta bantango ya liboso ya bozalisami na bino, bobandaki kolona kozanga botondi na kati na bino, bokanisa nde bokomi lolenge nini na nsima ya bankama ya bambula. Kozanga botondi ekoli mpe ekangami na kati na bino na boye ete ekomi eteni ya bomoi na bino, ya bomoto na bino ya solo. Ba-jene na bino ebongwani mpo na komema bilembo oyo ekokoka kolongwa te. Bato bakomonana na bino bato ya boboto, ya bolingo, ya sembo, ya botosi, ya komikitisa mpe ya kosalisa, tii soki bazali kaka kozela eloko moko epai na bino, litomba songolo. Kasi bakolimwa na nsoni te mpe na botondi te tango kaka bakozwa oyo balingaki.
Ezala malamu nini bokosala mpo na bango, bakobalola bino mokongo na bango, na mawa ata moke te to na botondi ata moke te. Bosala nzala mpo na bango, bopesa bango bomengo na bino nyonso, bondima komipesa na komikaba oyo bakoki kokanisa te, bokata loboko na bino, bomipesa mbeka, to boboma ata moboti mpo na bango soki bolingi; bakosundola bino tango kaka bakozwa epai na bino oyo bazalaki kozela na motema molai mpe na lokuta. Longola yango, mpo na nkanda mpe mabe na bango, bakomona ntango nyonso likambo mpo na kopamela bino mpo na kondimisa ezaleli na bango ya kozanga botondi.
Moto oyo azangi botondi akoki kokoka te kozala na kondima, mpo kozala na kondima, ezali komona ete Nzambe azali Mozalisi mpe Mopesi-bolamu na yo. Ezali mpe kokoka komona ete Nzambe akoki kopesa boboto na bolingo na ye epai ya moto mosusu oyo akoya kosalisa yo.
Nazali Nzambe Monene Koleka, Mozalisi ya bato, nazali na esika ebongi mpo na kolobela bino makambo oyo. Natindaki Mwana na Ngai, Yesu, mpo na kobikisa bomoto oyo ezalaki na pasi. Lolenge oyo bato bapesaki Ngai matondi ezalaki kopesa Ngai kozanga botondi na plato ya wolo: bato bakosaki Ngai na koboya Mwana na Ngai; babengaki ye moto ya kofinga Nzambe, mpe na nsuka baboma ye na lolenge ya nkele koleka, lokola moto mabe ya pamba.
Bokoki komituna: ndenge nini ekoki kozala na elikya ete bato bandima Mwana na Ngai, Yesu, lokola Masiya, wana bakokanisaki bango na Ngai, Nzambe, na kati ya elanga ya Edeni? Nayebaki makambo wana nyonso, kasi Bolingo na Ngai mpe Ngolu na Ngai eleki. Na ndenge nyonso, bato basambisaki bango moko na kobaka Yesu na ekulusu.
Nazali kaka na esengo mpo na bomoto mpo na bato oyo mikeboto bazali naino na kondima na mokili. Uta likolo, namonaka bango lokola kokendé ya mwa mwinda ya butu oyo ezali kopela na pasi na kati ya butu, ezingami na mabuta ya molili.
Kotala malamu ekomonisa ete ezali kaka na motango moke ya bato ya kondima oyo bazali kobunda mpo na kosala likambo ya kokesenisa na ezaleli oyo ekómi ya bato nyonso, kasi bazali boni na kati ya ebale ya bato ya kozanga botondi? Bato oyo bazali naino na kondima mpe bazali kobunda mpo na kozwa lisusu Bokonzi ya likolo, bazali kaka na likoki ya kolakisa botondi epai ya bandeko na bango. Epai na bango nazali komikundola ete nazali Yawe Nzambe, Mozalisi ya Molongo mobimba. Boya epai na Ngai na esengo, na elonga, na masanzoli mpe na botondi. Bosepela na Nkombo na Ngai ya bule mpo nazali Nzambe ya boboto mpe ya bosembo ya seko[2]. Bongo mpe, bozala na botondi epai ya moninga na bino mpe bolakisa ye bolingo.
[1] Matthieu 22:37-39, [2] Psaume 100:1-5
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "L’ingratitude est un grave péché", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
