Ndenge nini kozwa Bolingo na motema mpo na kosalela Nzambe wa seko ?
Na bosolo, bolingo ezali kala na mitema ya bino banso, kasi ekangi. Mpo bolingo emonana na bino, esengeli kobanda na kokangola mitema ya bino na mikumba ya mpamba ya mabe na bino mpe bamposa ya mabe. Soki bokomeka kozala na bomoi ya bosantu, kosala bitumba na mabe na bino mpe bamposa ya mabe, molimo na bino ekokangolama, ekopɛpɛla mpe ekobanda kolakisa ye moko na bosolo kati na bino. Na ndenge wana, makabo na bino mpe nyonso oyo natie na bino ekobanda kobima. Na lolenge wana, bokokota na nzela ya bokoli ya molimo epai ya bokonzi na bino ya molimo...
Na bosolo, motuna oyo esengeli te kotunama mpamba te bato nyonso oyo nasala na elilingi na ngai basali moko na Bolingo. Nazali Bolingo, yango wana eteni ya mwinda ya nzambe oyo natie na moko na moko kati na bana na ngai esengeli kosala ete Bolingo na ngai ebima na bango mpe zingazinga na bango. Na ndenge yango, bato ya liboso oyo babotamaki na mokili bazalaki na Bolingo mingi. Bayebaki kosepela na kitoko ya biloko ya mokili oyo ezalaki na boyokani na kati na bango ya kongenga.
Nyonso ekweyi tango bato bakweyi na masumu. Kobanda na ntango wana, babandi kokoma kilo na molimo na komitia bilamba nyonso ya mbindo ya molimo. Bato ya lelo bamibongoli: na likolo, namonaka bino balati na bilamba ya moindo makasi oyo ezali masumu na bino. Bomikangaki mingi na masumu ete milimo na bino ekangami na basinga mingi ya karma: basinga wana ezali mbano ya mabe na bino, minyoko, boyini, kondima te baninga, kanda, zuwa, lokoso, lolendo, kobebisa nzoto na nzoto, mabe mingi, na mokuse, kokende mosika na Mibeko na ngai ya bosantu mpe Mitindo.
Na basinga nyonso wana ezali na ba-demoni oyo bakangaka bomoi na bino, bakangaka misala ya malamu ya molimo na bino. Yango wana nalobi ete ba-demoni bayangeli mokili. Ba-demoni batindikaka bino na mabe, na boyini, na makelele ya mayele mabe, na masanga ya kolangwisa, na biloko ya nkele, na mabe ndenge na ndenge, na ndimi na bino ya mabe. Pamba te, ata molimo na bino eleki makasi koleka ba-demoni nyonso oyo basangani na bino, boponaki na bino moko kotika bango basala, mpo bobungi elengi ya malamu. Bitumba oyo esalemaka na kati ya moto na moto nyonso na ndenge ndenge. Ata bato ya malamu mingi baminyamaka ntango mosusu na bopusi ya ba-demoni: ba-demoni ya kolobi mingi, ya lokuta, ya kolyaka mingi, ya koyiba, ya koleka mwasi, ya kokosa, ya nzoto, ya lolendo, ya kosala sembo te, ya zuwa, mpe misusu.
Soki bososoli mbano ya kokweya na masumu, ekokoma pete koyanola motuna "Ndenge nini kozwa Bolingo na motema...?". Na bosolo, bolingo ezali kala na mitema ya bino banso, kasi ekangi. Mpo bolingo emonana na bino, esengeli kobanda na kokangola mitema ya bino na mikumba ya mpamba ya mabe na bino mpe bamposa ya mabe. Soki bokomeka kozala na bomoi ya bosantu, kosala bitumba na mabe na bino mpe bamposa ya mabe, molimo na bino ekokangolama, ekopepela mpe ekobanda kolakisa ye moko na bosolo kati na bino. Na ndenge wana, makabo na bino mpe nyonso oyo natie na bino ekobanda kobima. Na lolenge wana, bokokota na nzela ya bokoli ya molimo epai ya bokonzi na bino ya molimo.
Soki bolongi kosala yango na kolongola na bino boyini, koyokela mabe, mabe, zuwa, kotiola... bokomiyoka pembeni na bandeko na bino. Bokobanda kolinga bato nyonso ya mokili kozanga matomba mpe kozanga kokabola na lolenge la mboka, ya bondimi, ya libota... Bokomiyoka na nkanda ya kosalisa bandeko na bino, mbala nyonso oyo bokomona bango na mposa, na mikakatano. Bokobanda kondima te mabe ya mokili na bino. Bokolingaka kaka kosala malamu, malamu kaka, mpo na lobiko ya baninga, mbala mosusu na kobebisa bomoi na bino moko. Bokomona normal komipesa mpo na baninga, na lolenge ya kolingaka kokabola nyonso na bango, mpe kosalisa bango baluka biyano na mikakatano na bango. Ekoki kosalema bobosana bino moko na kosalela. Bongo, bokengela bino ntango nyonso mpe bobatela liboso bino mpe libota na bino, pamba te yango ezali mokumba na bino.
Suka ya nyonso wana, ezali kokoma na kotika kombo, elingi koloba kolongola mobulu mobimba, koganga oyo bozalaki liboso. Bosengeli kobotama lisusu na lolenge ya kokoma moto ya sika oyo azali na bomoi mobimba na kobanga Nzambe. Milende yango ya kotika kombo esengeli komema bino na kopesa kombo oyo ezali ebandeli ya bomoi nyonso ya bondimi.
Tango bokokoma na eteni wana, bomoi na bino ekozala na ntina kaka ya kogumbamela Nzambe. Bokozala ntango nyonso na kosambela ngai mpo na kolongola mikakatano ya moto to moto, mokili to mokili, ya bato oyo bazali na mpasi. Ezali boye nde bokokoma na eteni ya bomoi ya bondimi oyo nasengaka bana na ngai nyonso ya mokili basala. Yango nde esengeli kosala mpo na kozala na bolingo na motema mpo na kosalela ngai. Bolingo oyo na bino ekosalisa ete bizaleli mosusu, malonga mpe makabo oyo natie na bino ebima, elingi koloba liyebi ya solo ya kolimbisa, ya kondimela, ya lokumu, ya bosantu, ya bosembo, ya molende, ya komikitisa, ya botosi, ya kondima, mpe misusu. Kobanda wana, bokososola mokili na lolenge mosusu.
Ekokoma pete ya sosola kindoki, mayele ya molili mpe misala ya ndenge wana. Na boyokani ya makila, satana akangaka liboso, liyebi ya bolingo na moto oyo azwi kindoki. Atiaka kobanga na ye mpe abebisaka molimo na ye na mosuni mpe makila ya bato oyo alyaka. Mpo na kosukisa nyonso, asengaka ye aboma libota ya pembeni, mobali to mwasi na ye to moko kati na bana na ye mpo na kolongola libela liyebi ya bolingo na ye. Eteni yango ya kozwa kindoki ezali ya kozongisa bolingo na boyini, na mawa makasi, na motema ya moto oyo azwi kindoki.
Kanisaka bolingo ya mama mpo na bana na ye, ya mwana mpo na baboti na ye mpe bandeko na ye ya mibali mpe ya basi. Kolonga koboma moko kati na bango, ezali kobanda kokita na lifelo. Soki na suka, moto oyo azwi kindoki alongi kosala yango, apesaka bilembo na satana ete akoki kozala ya mokili na ye. Na mbala moko, satana azipaka elongi na ye na elamba ya moindo mpe ba-demoni ya boyini, ya mawa makasi, ya nzoto ya mabe, ya lokuta, ya zuwa, ya koyiba, na mokuse, ba-demoni ya mabe makasi bakangaka bomoi na ye: bolingi na ye ya kopona ekangi mpe molimo na ye ekangami. Abatami butu na mokolo mpo na kopekisa ye akangola mibende na ye ya makila. Na ndenge wana, akomi mokangami ya satana oyo atambwisaka ye ndenge alingi mpe soki alingi. Na bosolo, nalobi na bino, nyonso wana ezali ya kokima kaka pamba te satana akoki kotelemela te liboso ya bolingi makasi ya moto oyo azwi mokano ya kotika molili mpo na kosalela ngai.
Nakundolaka bana na ngai nyonso ete misala ya bosantu mpe ya bondimi ekozala pete te pamba te satana mpe balingami na ye bakoluka ntango nyonso kobenda bino na sima, mpo na komema bino na kobeba mpe na kolema motema. Boteleme mbala nyonso oyo bokweya "pamba te mbala sambo moto ya sembo akweya, mpe atelemaka" [1]. Nakozala wana mpe nazali ntango nyonso pembeni na bino na bitumba nyonso oyo bosalaka na molili. Demoni moko te akoki kotelemela Nguya na ngai. Bongo, bobengaka ntango nyonso Moto ya Molimo Mosantu tango bokutanaka na ba-demoni.
Demoni ya bogoyi ezali ya liboso oyo akoluka kozipisa bino mpo na kopekisa bino bosambela ngai, bosalela ngai. Bosala ntina te ya kotala nsima na losambo. Losambo ezali ebonda ya makasi mpo na bino. Soki bozali na mposa, bosambela na ntango nyonso mpe na bisika nyonso, na kobombama ya motema na bino. Pamba te losambo ezali nguya na bino, ebonda na bino, bobateli na bino, mpe satana ayebi yango. Bongo, bobundisa bogoyi mpe bobosani na bino, kozanga kopema. Bongo, bokosalela ngai na esengo mpe na kosepela, na motema oyo etondi na Bolingo.
[1] Proverbes 24:16
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Comment avoir l’Amour dans son cœur pour servir l’Eternel Dieu ?", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Sources Ph. illustration: www.freepik.com
