Tika bakufi bakunda bakufi na bango
Bato mingi ya bomoto na mokili basili kokatama mpe kopesama etumbu ya lifelo. Ntango Yesu alobi "Tika bakufi bakunda bakufi na bango," azali koloba na ntina ya bato oyo bapesami etumbu ya lifelo, yango wana bakufi ya molimo, oyo bazali kokunda bakufi mosusu ya molimo... Bakufi ya molimo bazali pete kokamwa na mokili. Bamitungisaka te na bomoi na bango, bazali na motema mabe, bazali na kanza mpe basalaka makambo mabe na esengo. Basalaka mitindo nyonso ya likama oyo ekoki koboma bango kozanga kobanga. Liwa ebangi bango te...
Mingi kati na bino bososoli te lisese oyo ya Mwana na Ngai Yesu. Maloba oyo ya Yesu ezalaki na ntina ya Sambisami. Pamba te bato mingi ya bomoto na mokili basili kosambisamama mpe kopesama etumbu ya lifelo. Ntango Yesu alobi « Tika bakufi bakunda bakufi na bango »[1], azali koloba na ntina ya bato oyo bapesami etumbu ya lifelo, yango wana bakufi ya molimo, oyo bazali kokunda bakufi mosusu ya molimo.
Na mokili, bato nyonso bakutanaka : na banzela, na zandu, na bisika ya bato, tokutanaka na bato ya bomoto basangani na ba-demoni mpe ba-zombi oyo bazwaki nzoto ya bomoto mpe bato ya bomoto oyo basili kokatama na lifelo. Na ndenge wana, satana akokani koleka na pete kozwa mpe kokoma epai ya bana na Ngai oyo bazali naino na libaku ya lobiko.
Napesaki bino motuna moke : na ba week-end, satana atindaka ba-demoni na ye oyo balataki lokola bilenge basi ya kitoko mingi. Bakangaka mibali oyo balandaka basi oyo basalaka na bango makambo na bango. Soki bakosangisa na basi wana oyo bayebi te, bakobandela bango kindoki ya liwa. Bamikutaka lisusu te, bakobandaka bokono sima ya bokono, mikakatano sima ya mikakatano, sima bakweya mpe bakangami na masumu. Nsukansuka, bakokende kosala motango ya bakufi ya molimo kati na bavuzi. Bato wana bakobanda mosala ya kindoki soki bakosangisa na basi mosusu.
Motuna mosusu : na zandu, mingi kati na batekisi bazali na biloko ya kindoki mpo na kosala ete misala na bango ekenda liboso. Biloko wana ya kindoki ezali kaka ba-demoni oyo bakobandela bilei. Soki bosambelaki makasi te biloko oyo bosombi, soki bozongeli na ndako, ba-demoni wana bakobandela bandako na bino, sima bino moko ntango ya kolia. Ezali mpe se bongo mpo na ba-supermarché mpe misusu.
Na bandakisa wana ya mike, bososoli ete « Tika bakufi bakunda bakufi na bango », ekoki koloba mpe, « Tika bato oyo bakatami na lifelo bamema bato mosusu na lifelo ». Lisese ya Yesu ekoki kosalisa bino mpo na kososola mpo na nini bato mingi balingaka matanga. Babendaka na bitumba na nzoto, bapangelaka liwa ya bato mosusu ntango ya matanga. Na ndenge wana, bakozala na libaku ya kosepela ntango ya bokutani ya matanga. Bongo nde mokili na bino ezali. Mpe totali bitando nyonso wana wuta na likolo.
Bakufi ya molimo bazali pete kokamwa na mokili. Bamitungisaka te na bomoi na bango, bazali na motema mabe, bazali na kanza mpe basalaka makambo mabe na esengo. Basalaka mitindo nyonso ya likama oyo ekoki koboma bango kozanga kobanga. Liwa ebangi bango te. Yango wana bolobaka mbala mingi « ntaba oyo akufi abangi te mbele ». Bokeba ; koleka ndambo ya bavandi ya mokili bazali na lolenge wana ya bato. Bongo, bosala keba na boyokani na bino pamba te bakufi ba molimo mosusu bazali ba-lololo, bato ya maloba ya sukali oyo babombaka mayele malamu bomoto na bango mpo na kobebisa bato. Mbala mingi bazali pene na bino koleka, na lolenge ya « baninga » ya malamu, bandeko, bapesi toli mpe baninga ya mosala. Mpo na kobima na bango, bosengeli kozala na bomoi ya losambo. Bokabeli Ngai makambo nyonso oyo bolingi kosala mpo ete Nabatela bino mpe natambolisa bino. Nazali Nzambe ya boyambi, namonaka nyonso, nayebi nyonso mpe nakanisi ata moko te. Bozala na motema molai ntango bosambelaki Ngai. Bosala eloko te liboso ete Ngai napesa eyano na masambo na bino.
Ba-anjelo na Ngai ya nguya bazali mpe kati na bino, mpo na kosalisa bino kobundisa mitambo mingi ya satana. Soki ezali na mpasi, ba-anjelo na Ngai mosusu ya likolo bamimonisaka na lolenge ya bomoto mpo na kobikisa bino. Basusu babotamaki na mokili mpe bafandaka kati na bino lokola mibali mpe basi ya momeseno, nzokande bazali basaleli na Ngai ya nguya oyo bakendeke na bomoni te. Mpo na kobatela bango, nasalaka ete mosusu bamiyebaka te lokola ba-anjelo, ata soki ntango mosusu bamonaka na bandoto mapapu na bango ya anjelo. Molimo-Mosantu afandaki na mokili. Na ebandeli, amiyebaki te lokola Molimo-Mosantu, ata soki bolenge na ye ezalaki ya kokamwa. Ezalaki se bongo mpe mpo na Yesu. Nakoki koloba bino mingi te. Nyonso wana ezali eteni ya banzela na Ngai oyo ekoki kososolama te.
Mpo na lobiko na bino, nasenga bino bosambelaka na ntango nyonso mpe na esika nyonso. Bosambelaka soki bolingi kokutana na mwasi, na mobali ; bosambelaka ntango ya kosangisa liboso na mobandeli ya sika ; bosambelaka soki bolingi kosala mombongo na moto ; bosambelaka ntango bokende mpe bozonga na mosala ; bosambelaka na biloko oyo bosombi na zandu mpe na ba-supermarché ; bosambelaka liboso ya kolia, ya kolala, na tongo ; bosambelaka na bakado na bino pamba te bakado mingi bazali na kindoki ; bosambelaka na biloko na bino ya lolenge nyonso... Tika bomoi na bino ezala bomoi ya losambo, ya bosantu. Botambola na bomoi ya bosantu mpo na kobima na mokili oyo etondi na ba-demoni mpe bakufi ya molimo oyo bazali koluka banyokoli.
[1] Luc 9 :60
Nsango eyei uta na Nkolo Nzambe mpe etindami ndenge ezali.
Likambo ya motuya: Bosalisa mpo bato bayeba Solo na KOPANZAKA yango epai ya bato ebele oyo bokoki. NZAMBE APAMBOLA BINO !
Traduction du message original "Laissez les morts enterrer leurs morts", disponible sur AGA News
En cas de difficulté de compréhension des textes, référez-vous au message original en Français.
AGA News - TIA Lazare
Sources Ph. illustration: www.freepik.com
